Jozue 12 (MNB)

Molongo ya bakonzi oyo Isalaele alongaki
1Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :
2Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni.
Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni. 3Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
4Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
5Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
6Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
7Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango 8kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
Tala bakonzi yango :
9mokonzi ya Jerikomoko
mokonzi ya Ayi, pembeni ya Betelimoko
10mokonzi ya Yelusalemimoko
mokonzi ya Ebronmoko
11mokonzi ya Yarimutimoko
mokonzi ya Lakishimoko
12mokonzi ya Egilonimoko
mokonzi ya Gezerimoko
13mokonzi ya Debirimoko
mokonzi ya Gederimoko
14mokonzi ya Orimamoko
mokonzi ya Aradimoko
15mokonzi ya Libinamoko
mokonzi ya Adulamimoko
16mokonzi ya Makedamoko
mokonzi ya Betelimoko
17mokonzi ya Tapuamoko
mokonzi ya Eferimoko
18mokonzi ya Afekimoko
mokonzi ya Lasharonimoko
19mokonzi ya Madonimoko
mokonzi ya Atsorimoko
20mokonzi ya Shimironi-Meronimoko
mokonzi ya Akishafimoko
21mokonzi ya Taanakimoko
mokonzi ya Megidomoko
22mokonzi ya Kedeshimoko
mokonzi ya Yokineami kati na Karimelimoko
23mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dorimoko
mokonzi ya Goyimi, kati na Giligalimoko
24mokonzi ya Tiritsamoko.
Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.